menu-iconlogo
huatong
huatong
লিরিক্স
রেকর্ডিং
Molingami malamu

Balingaka pona bozui te

Balingaka pona bizaleli

Yango nabengi Yo Moninga.

Na lisolo ya bolingo

Maloba ezalaka na nguya

Oyo etondi motema

Suka se mbebo ebimisa.

Kozala na Moninga malamu

Ezali bozui na tango ya mpasi

Moto akosungaka yo

Soki mpasi ekomi.

Na motema nalapi ndayi

Pona Yo nakosala nionso

Ekoki na moto kosala

Olanguisi motema na ngai.

Yesu Yesu Yesu

Yo Moninga malamu.

Opekisa makambo etungisa ngai

Pomobembo ya nga na Yo

Esalema na kimia

Toleyisana mbuma bolingo

Napesa Yo masanjoli

Okitisa kembo na Yo

Nabika kati na Yo

Ponayeba Yo na mozindo.

Nawuti na bapota ya deception ya mokili

Naza nanu na se ya emotion

Monoko na nga eza nanu kilo

Molimo yekolisa nga masanjoli.

Nakokaka kofanda kimia te

Soki batangi kombo na Yesu

Motema epeli nga moto

Posa nafukama nasanjola.

Naza nanu elenge na bolingo

Nayebi kolinga te

Olanguisi motema na ngai

Yesu Moninga malamu.

Nabenga Yo na kombo nini?

Nabenga Yo Papa na bana

Fololo ya motema

Yesu elengi ya motema.

Yesu Moninga malamu

Moninga na nga

Moninga ya tango nionso.

Yesu Moninga malamu

Ayebi kobomba sekele

Moninga ya motema.

Pona Yo na lapi ndayi

Masiya nakosala nionso

Ekoki na moto kosala.

Pona Yo namipesi mobimba

Nzoto bozui na ngai nionso

Bozalisami na nga mpe lokola.

Moninga ya boye na mokili aza te

Naza se na Yo Masiya

Olongi motema na nga.

Yesu ya motema

Yesu ya mabanzo

Yesu ya molimo na nga.

Napesa Yo nini Masiya?

Mbeka ya bomoyi na nga

Yesu Moninga na nga.

Yesu moninga na nga

Moninga malamu

Moninga ya tango

Adorons L'eternel/Alain Moloto - Athom's Mbuma থেকে আরও

সব দেখুনlogo

আপনার পছন্দ হতে পারে