Ozali oyo abongi na lokumu 
Mosungi na kokamwa mokonzi monene aza na bomoi 
Ozali oyo asimbi bomoi na nga 
Bipai na tie motema bipayi misu na ngai eza kotala 
Ozali likonzi ya bomoi ya basantu 
Ekimelo na nga ozali nzela bipayi na ko tambolaka 
Papa y'ozali malamu mingi pona ngai 
Lisekwa ya baye bakenda oh na elikia yakosekwa 
Y'olobi oza moninga na ngai 
Elong'eza na yo eh bibayi y'ozali nd'eza malamu 
Nkolo y'ozali nyoso ya motuya 
Mobateli na ngai bipayi nakona motema na ngai 
Ozali oyo mosusu azali te oh 
Liloba ya bomoi bipai nafandisa elikia 
Papa y'ozali malamu mingi pona ngai 
Lisekwa ya baye bakenda o na elikia yakosekwa 
Ozali kimya mpe esengo na ngai 
Bilembo ya bosombi oyo mokili ekoki kopesa te 
Bipayi nasuki yango eza suka te oh 
Mpo biyano na ngai bisimbami na yo mosungi na bato 
Ozali nzambe oza na suka te oh 
Mosungi na baye balemba oh mpe ba bungisa elikya 
Y'osimba nyonso na nguya ya liloba na yo 
Mokeli monene nzambe na biso azo ko sala 
Ozali oyo afandi na motema na ngai mpe asungaka ngai 
Na kota na kembo na yo eh 
Ozali oyo atondisa likolo na nse na bonzambe na yo 
Mpo misu mikumisa yo eh 
Ozali oyo afandi na motema na ngai mpe asungaka ngai 
Na kota na kembo na yo eh 
Ozali oyo atondisa likolo na nse na bonzambe na yo 
Mpo misu mikumisa yo eh 
Ozali likonzi ya bomoi ya basantu 
Ekimelo na ngai ozali nzela bipayi nako tambolaka 