menu-iconlogo
logo

Qui vivra verra

logo
Lyrics
Ah nga na koma ko nyokwama

Nga na koma ko sambwisa nzoto eh

Ngai mobali kitoko boye Na koma mongaba ya bato

Tango nga na bimaka na ndako

Bato bayebi nga nakei koluka eh

Nzoka na kendeke ko senga

Ko zonga na butu na mpamba eh

Bato bakoma kotuna ngai Yango yo owutaka wapi eh Na lobaka na bango eh, na zali mosangi Souci ekomi ko sala ngai

Pasi mingi na motema Makanisi koyela ngai, na kende kosimba ata kisi Bongo nga na zali ko mona kisi ezali na tina moko te(Na ko zela epayi ya nzambe oyo ewumelaka)

Ngai na botamaka libumu ya maman se ngai moko te Nzambe yo opesanga nguya na sala na bokolo maman Papa aboti nga, Herve Ferre, atika ngai bo mwana Ngai malchance, na sala nini po te ba hina nga

Ba oyo ba welaka vie ya presser Tala ba suka se na nzela Nga malembe-malembe ti eh, nako koma eh Vie ya mwana mobali ezalaka nango se bongo eh

Ebandaka na mpasi esukaka ngo na bisengo oh Ngai oyo, x3 ngai oyo eh, ngai oyo, ngai oyo Ngai na sambwa likolo ya mbongo eh

Ngai oyo, x3 ngai oyo eh, ngai oyo, ngai oyo

Ngai na sambwa likolo ya mbongo eh

Soki na kosi bo tuna ya Ngiama Ye ayebi ndenge abandaki Lelo Nzambe a pambola ye Pourquoi nga Ferre te

Soki na kosi botuna Mopao Papa na Didi na Del Piero Lelo Nzambe apambola ye Pourquoi nga Ferre te

Soki pasi bo tuna Souverain Ye ayebi ndenge abandaki Lelo Nzambe apambola ye Maman Lusambo Agnes

Ba lekana ba TV, ba loba na ba radio

Ba sala ba campagne ya mabe Nioso ba bebisa vie na ngai Kasi nazali pe yuma te

Ba kamate elongi na nga batia ya dragon Po ba kimisa maman na Caprice

Kasi Nzambe a confonda Je suis toujours en vie

Kimia na ngai, kimia ya famille Maman Maria abotanga A lakisa nga kofi nga te Ye mpe azali lokola nga

Ba sala ba campagne, ba boma Marquis Ba kotisa ba masta ba bula ya mabe Po ba bebisa vie na biso, Nzambe kaka ayebi

Qui vivra verra by Ferré Gola - Lyrics & Covers