menu-iconlogo
huatong
huatong
Lirik
Rekaman
Oyo ya ngai motema elinga lisano,

motema elula koseka lelo ezoki

pota na bolingo ya mama moke na yo Tsiane

Tsiane motema na mbeli, ah mama

Basalaka boye te na bolingo ya bana,

yokeyi okeyi ata elaka te oh

eloko yango nini oyo toweli oh, yo Tsiane

lengela muana ya moninga, muana moninga lengela ye

Mikolo mileki awa otala nga ata liso te

yo osali nini Tsiane na bolingo ya nga na yo

oyo ya bula na ndambo cherie yaka

Oyo ya ngai wa yo awa nabebi nzoto

yoka ata na sango ndenge nga nako niokuama awa

mayi na miso butu na moyi, ekosilaka te

ekosilaka te ehh

Oka!

Nabeli bongo ya bolingo awa okeyi ehh, na ndendeli eh

Tsiane tina nini yokeyi ehh, zonga zonga ehh

Zongela ngai wa yo cherie ohh, na bondeli eh

Na mayi na miso muana mama iye mama eh

Bolingo nioso bako suanaka pe babundaka, oyo ya nga yo

Tina nini pardon ezala te, zonga zonga eh

Zongela ngai wa yo cherie, na bondeli eh

Na mayi na miso wapi Mambo Blaise na ngai eh

Nga mokolo na ko wa eh, soki sanduku na nga eleki kilo eh, kokamua te

Tsiane azali na kati ya molema, na mema ye

Ti na se ya mabele mama wapi Kamono ehh

Nabeli bongo ya bolingo awa okeyi ehh, na ndendeli eh

Tsiane tina nini yokeyi ehh, zonga zonga ehh

Zongela ngai wa yo cherie ohh, na mayi na miso Tutu Roba muana mama Amy ehh

eh Bolingo nioso bako suanaka pe babundaka, oyo ya nga yo

Tina nini pardon ezala te, zonga zonga eh

Zongela ngai wa yo Acramoje, na bondeli eh

Na mayi na miso wapi Bouboul muana mama Amy ya mobunga

Nga mokolo na ko wa eh, soki sanduku na nga eleki kilo eh, kokamua te

Tsiane azali na kati ya molema, na mema ye

Ti na se ya mabele mama iey mama iye ehh

Selengkapnya dari Koffi Olomide/Orchestre Quartier Latin

Lihat semualogo