menu-iconlogo
huatong
huatong
Тексты
Записи
Bilengi mingi na sala na berceaux ya mama

Eleki elingi koleka ba mbeto nioso nga na lala

Mama soki ozalaki kaka na bomoyi, mbele na sengi o zongisa nga susu wana

Jamais olingaki nga na lela yo seka

Jamais olingaki yo lala nga na lamuka

Jamais olingaki ata ngungi atoungisa nga

Soki na beli ozalaki kotana tongo nsa

Banda y'okenda nakoma abandonée

Recompense nayo nako pesa nani yango?

Ata na leli nani ako dorloter nga ah?

Yango na yembeli yo zembo oyo mama Niondo

Elengi ya libelé ya mama abota ngaï

Eleki ba recette nionso ya ba cordon bleu nga na lya

Ata mafuta, tomate ezalaki te, kasi yango elakaki mosuni n'élengi

Banda y'okenda appétit esila nga ah nakoma ko lya kaka po na sepelisa monoko

Mateyas ya mama ezanga bulletin pe minerval

Kasi eleki ba leçons ba maitres, ba professeurs ba pesa nga

Mama soki ozalaki kaka na bomoyi mbelé na sengi batya yo ministre y'éducation

Mbelé ba parquets, ba prison nionso bakanga

Mbelé kutu motu mabé azali té eh

Lelo nakanisi yo mingi mama ah

Mpo jour y'anniversaire na nga ekomi pene

B'invités bako lya bako mela masanga

Yo kutu artisan na nga y'ozali te

Epayi y'ozali soki okutani n'occasion eh

Tindela nga carte de voeux, ata fololo

Esengo na nga ekozala multiplier fois deux

Normalement fêti ya lelo ezali ya yo

Serment d'Hippocrate ba médecins ba kosalaka

Ya nga serment y'ozala toujours mama nga

Ata ba bandeli mokili soki mbala zomi

Ya nga serment y'ozala toujours mama nga

Lelo nakanisi yo mingi mama ah

Mpo jour y'anniversaire na nga ekomi pene mama

B'invités bako lya bako mela masanga

Yo kutu artisan na nga y'ozali te

Epayi y'ozali soki okutani n'occasion eh

Tindela nga carte de voeux, ata fololo

Esengo na nga ekozala multiplier fois deux

Normalement fêti ya lelo ezali ya yo

Serment d'Hippocrate ba médecins ba kosalaka

Ya nga serment y'ozala toujours mama nga

Mama soki ozalaki kaka na bomoyi, mbele na sengi o zongisa nga susu wana

Mama soki ozalaki kaka na bomoyi, mbele na sengi o zongisa nga susu wana

Еще от Papa Wemba

Смотреть всеlogo