.- Nkolo yamba loyémbo la nga 
Libonza ya moto asimbami na yo 
N'azali elémbo ya bolingo bua yo 
Mokonzi ya bomoi na ngai 
Otika likolo polélé Másiya 
Po tomona nkémbo pe nguyá na yo 
Ozali lisimba ya mayi ma lobiko 
Yo Nkúmu ya ba nkúmu banso 
Choeur 1: Y'Ozali bopemi bua ngai 
Bipayi nakotika mikumba mia ngai 
Ozali solo likonzi lisímbi ndáko 
Másiya na ngai 
Y'Ozali lokúmu mia ngai 
Bipayi nakosímba soki na lembi 
Ozali bipayi nakitisaka motéma 
Másiya na ngai 
2.- Ozali nzeté ya bolingo Másiya 
Nakati y'elanga ya motema na ngai 
Epesa folólo ya malasi kitóko 
Na miso ya Nzambé na bulêê 
Opesa bokono nkombo ya lobíko 
Obenga liwá na nkombo ya mpongí 
Po'été lisékwá ezali yo Másiya 
Mokonzi ya bakonzi banso 
Choeur 2: Na sopi motéma na ngai 
Libosó ya kiti ya ngolu na yo 
Po'été lobiko na ngai ekowuta na yo 
Másiya na ngai 
Kitisa nguyá na yo Nkóló 
Awa tokobélela nkombo na yo 
Lakisa biso nkémbo pe makasi na yo 
Nzambé na nguya 
3.- Yamba maloba ya motéma na ngai 
Mosopani liboso na yo mosantu 
Na zongisa nkémbo pe lokúmu na yo 
Yo nzéla pe bomoi ya séko 
Atá molili ya mokili eyini 
Mwinda na yo moko ngengisa nzéla na ngai 
Oyo asimba ngai lobóko ezali yo 
Mokonzi ya bomoi na ngai