Alléluia, amen -GAEL (Adorons l'Éternel) 
Tika ngai na yembela yo 
Tika ngai na kumisa yo 
Tika ngai na sanjola yo 
Kolo tika na yembela yo 
Kolo tika na kumisa yo 
Kolo tika na sanjola yo 
Maloba motu e mati na motema 
Nalingi na kumisa yo 
Tika ngai na sanjola yo 
Kombo na yo Masiya na ngai 
Ezala nzete a mpio 
Na fanda na kimia 
Kombo na yo Masiya na ngai 
Ezala mo panga monene 
Ya ko kweyisa Satana 
Na kombo ya libota nabiki te 
Na kombo ya noko nabiki te 
Nabiki na Kombo na Yesu 
Batangeli ngai bakisi a pharmacie 
Lobiko épesameli te 
Kombo na Yesu Libiki na ngai 
Si na lingaki na beba eh! 
Si na lingaki na kufa eh! 
Y'obikisi ngai Yaya 
Si na lingaki na Beba eh! 
Si na lingaki na kufa eh! 
Okangoli ngai Yaya 
Esengo eh, elikia eh, kimia eh! 
Esengo eh, elikia eh, kimia eh! 
Esengo eh, elikia eh, kimia eh! 
Oh! Amen, amen, epayi na yo 
Oh, tika na ngai yembela yo 
Oh, tika na ngai sanjola yo 
Amen, alléluia, amen 
Mosantu, Mosantu yo zali Nzambe 
Tika ngai yembela yo 
Tika ngai sanjola yo 
Amen, alléluia, amen 
Makasi mpe mayélé nionso 
Ewuta bipayi na yo 
Tika ngai na sanjola yo 
Amen, alléluia, amen 
Olati kembo lokola elamba 
Ozingami na bangelu oh 
Tika ngai sanjola yo 
Amen, alléluia, amen 
Lokola elamba ebonga na nkolo nango 
Yesu obongi na Nkembo na yo 
Tika ngai na sanjola yo 
Amen, alléluia, amen 
Na bongisi pesa na ngai lelo, amen 
Na lingi na lesa yo 
Na sanjola motema na ngai 
Amen, alléluia, amen 
Ata ovandaki na kiti na yo 
Soki Oyoki ngai na sanjoli 
Otélemi oyamba ya ngo 
Amen, alléluia, amen 
Soki o moni na ngai bintuba, amen 
Yo moko otélemi 
Oza ko zela na longa NkoloYesu 
Amen, alléluia, amen 
Mokonzi na bomoy esika to yetama 
Yo nde Nzambe na ngai 
Mokonzi ya motema na ngai 
Amen, alléluia, amen 
Ekimelo na ngai, elomba melo na ngai 
Singo Yesu mokonzi na ngai 
Amen, alléluia, amen 
Elikia na ngai, makasi na ngai 
Na yembeli yo, na kumisi yo, na netoli yo Yesu 
Amen, alléluia, amen 
Na yembeli yo, na kumisi yo, na netoli yo, na sanjola yo, na netoli yo Masiah na ngai Yesu 
Amen, alléluia, amen 
Alléluia, alléluia, alléluia na Yesu 
Ngai na yembeli Mokonzi ye azali elonga eh! 
Solo e ya na buntu e ya na moyi, toko banga eloko te 
Ata butu e wumeli suka se tongo etana na bomoyi na ngai 
Boyaka to kumisa Mokonzi, ye azali elonga na biso 
Alléluia, alléluia, alléluia na Yesu 
Alléluia, alléluia, alléluia na Yesu 
Nzambe na ngai, Nzambe na yo, Nzambe ya biso nioso 
Alléluia, alléluia, alléluia na Yesu 
O za mo bokua bogwa na ngai, tika na yembela yo 
Alléluia, alléluia, alléluia na Yesu 
O simbi likolo, o simbi na se, nani a ko kani na yo? 
O yemba alléluia eh! 
Alléluia, alléluia 
Mokonzi na nguya eh 
Alléluia 
To yembeli yo eh, alléluia 
O bongi na lokumu 
Alléluia 
Mokonzi na nguya eh, alléluia 
To yembeli yo eh, alléluia 
Nkolo bongi na lokumu, alléluia 
To sanjoli yo eh, alléluia 
Nzambe na bikamwa, alléluia 
Alléluia, alléluia 
Alléluia, alléluia