Alléluia 
Jésus 
Alléluia 
Amen 
Alléluia, amen 
À celui qui a vaincu la mort, alléluia, amen 
À celui qui est la vie, oui, le glorieux, alléluia 
  Nkolo, tika na yembela Yo 
Nkolo, tika na kumisa Yo 
Nkolo, tika na sanjola Yo 
Tika ngai na kumisa Yo 
Tika ngai na netola Yo 
Tika ngai na sanjola Yo 
Maloba'a motuya emati na motéma 
Nalingi na kumisa Yo 
Tika ngai na netola Yo 
Kombo na Yo Masiya na nga 
Ezala nzété ya mpio 
Na fanda na kimia 
Kombo na Yo Masiya na ngai 
Ezala mopanga monene 
Yako kweyisa Satana 
Na kombo ya libota nabiki té 
Na kombo ya noko nabiki té 
Nabiki na kombo na Yésu 
Batangeli ngai bakisi'a pharmacie 
Lobiko épesameli té 
Kombo na Yésu nde libiki na ngai 
Olokotaki nga kati na nzela 
Opakoli nga mafuta nayo 
Po Yo bolingo monéné, Yésu eh, ah 
Si nalingaki na beba eh 
Si nalingakli nakufa eh 
Y'obikisi nga yaya ah 
Si nalingaki na beba eh 
Si nalingakli nakufa eh 
Okangoli nga, yaya ah 
Esengo eh, élikya eh, kimia eh 
Esengo eh, élikya eh, kimia eh 
Esengo eh, élikya eh, kimia eh 
Oh! Amen, amen, epayi na Yo (amen) 
Tika ngai na yembela Yo (amen) 
Tika ngai na pambola Yo (amen) 
Amen (alléluia, amen) 
Oh! Amen, amen, epayi na Yo (amen) 
Tika ngai na sanjola Yo (amen) 
Tika ngai na kumisa Yo (amen) 
Amen (alléluia, amen) 
Oh, mosantu, mosantu y'ozali Nzambe (amen) 
Tika ngai na netola Yo (amen) 
Tika ngai na sanjola Yo (amen) 
Alléluia, amen 
Oh, makasi mpe mayele nionso (amen) 
Ewuta bipayi na Yo (amen) 
Tika ngai na sanjola Yo (amen) 
Amen (alléluia, amen) 
Nabongisi messa na nga lelo oh (amen) 
Nalingi naliesa Yo (amen) 
Masanjoli ya motéma na nga (amen) 
Amen (alléluia, amen) 
Ata ofandaki na kiti na Yo (amen) 
Soki oyoki ngai na sanjoli (amen) 
Otelemi oyamba yango (amen) 
Amen (alléluia, amen) 
Oh, soki omoni ngai na bitumba (amen) 
Yo moko oyé, otelémi (alléluia, amen) 
Oza kozela na longa, Yésu eh (amen) 
Amen (alléluia, amen) 
Ekimélô na nga (amen) 
Ebombamélô na nga (amen) 
Si nde Yo, Yésu mokonzi na nga (amen) 
Amen (alléluia, amen) 
Oh, bwanya na Nzambe si ndé yo Yésu (amen) 
Makasi ya ba santu kaka Yo (amen) 
Napesa Yo nini yaya-ah-ah? (amen) 
Alléluia, amen 
Likonzi na bomoyi bisika toyekama (amen) 
Oh, Yo ndé Nzambé na nga (amen) 
Mokonzi ya motéma na nga (amen) 
Alléluia, amen 
Elikya na ngai, makasi na ngai (amen) 
Na yembeli Yo, na kumisi Yo (amen) 
Na nétoli Yo (amen) 
Alléluia, amen 
Na netoli Yo, na yembeli Yo (amen) 
Bolingo na nga, na sanjoli Yo (amen) 
Yésu na nga, Masiya (amen) 
Alléluia, amen